Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

RDC na Congo-Brazaville bazali na groupe moko na Libye, mpe Niger na CHAN 2020


Meschak Elia (D) elongo na Doxa Gikanji ya ba Léopards bazali kosepela nsima na elonga ya RDC na finale ya CHAN 2016 na Kigali, Rwanda, 7 fébruary 2016.
Meschak Elia (D) elongo na Doxa Gikanji ya ba Léopards bazali kosepela nsima na elonga ya RDC na finale ya CHAN 2016 na Kigali, Rwanda, 7 fébruary 2016.

RDC na Congo-Brazzaville babimi na groupe moko (groupe B) na Libye mpe Niger mpo na CHAN 2020, na milulu misalamaki lundi na Yaoundé, engumba mokonzi ya Cameroun epayi phase finale ya momekano moye mokosalama na sanza ya minei.

Milulu myango misalamaki na CAF (Confédération africaine ya football association).

Cameroun, mboka eye ekoyamba momeka mwango, ezali na groupe moko (A) na Zimbabwe, Mali mpe Burkina Faso. Ba Lions indomptables ya Cameroun bakobeta match ya kofungola momekano mwango na Zimbabwe.

Groupe C ekozala na Maroc, Togo, Rwanda mpe Ouganda.

Groupe D, na Zambie, Guinée, Namibie mpe Tanzanie.

Mboka 16 nde ekondongwana na phase finale ya CHAN Comeroun 2020.

CHAN, momokena ya lisano ya ndembo mpo bikolo ya Afrika, ekobetama wuto le 4 kino le 25 avril. Etali basani baye babetaka na kati na continent.

RDC esi elonga yango mbala mibale na 2009 mpe 2016.

XS
SM
MD
LG