Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Pompeo akebisi mpo na "bilaka ya bampa" ya Chine na Afrique


Secrétaire d'Etat ya Etats-Unis Mike Pompeo (G) na mokambi ya Union africaine Moussa Faki Mahamat na ndako ya UA na Addis Abeba, Ethiopie, 18 février 2020.
Secrétaire d'Etat ya Etats-Unis Mike Pompeo (G) na mokambi ya Union africaine Moussa Faki Mahamat na ndako ya UA na Addis Abeba, Ethiopie, 18 février 2020.

Secrétaire d’Etat ya Etats-Unis Mike Pompeo akebisi mpo na bilaka ya Chine na Afrique. Asukisi mercredi 19 février 2020 mobembo mwa ye na Afrique.

"Bikolo (ya Afrique) bisengeli kokeba na ba régimes autoritaires baye bapesa bilaka ya bamba. Bamemaka na kaniaka mpe na bowumbo," eyebisi M. Pompeo na Addis Abeba, engumba mokonzi ya Ethiopie, liboso ya ba dimplomates mpe bakambi ya ba entreprises na Commission économiques ya Afrique mpo na Nations unies.

"Bakoki kosala ete bofulukisami, bonsomi mpe kokende liboso oyo Afrique ezali mpenza koluka mpe ezali mpenza kozela esalama te," ekebisi M. Pompeo kasi atangi te nkombo ya Chine oyo ekoma partenaire ya yambo ya Afrique mpo na mombongo.

Chine ezali komivanidisama makasi na Afrique. Elakaki koleka 60 milliards ya ba dollars ya ba financements ya sika na sommet Chine-Afrique ya 2018.

Kasi projet ya ba infrastructures ya "nzela ya sika ya soie oyo Pékin ebandaka na 2013 mpo na kosingisa Asie, Europe na Afrique, efundami mpo na kopesa bolamu kaka ka basali mpe ba entrerpises ya Chine mpe kokweyisa ba économies ya bikolo misusu, mpe kokotisa ba oyo bandima yango na nyongo mpe kotala te makoki ya bomoto mpe environnement, elobi AFP.

M. Pompeo azali mokonzi ya likolo koleka na mbulamatari ya président américain Donald Trump oyo asali mobembo na Afrique subsaharienne, mingi mpenza na Sénégal, Angola mpe Ethiopie.

XS
SM
MD
LG