Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Nzoto etano esusu ezwami na parc ya Virunga nsima na bobomami ya ba ADF


Basungi ya Croix rouge bazali kolokota nzoto ya bawei na bobomami ya ba ADF na Manzalaho, pene na Beni, 18 février 2020.
Basungi ya Croix rouge bazali kolokota nzoto ya bawei na bobomami ya ba ADF na Manzalaho, pene na Beni, 18 février 2020.

Nzoto etango esusu ezwami mercredi na parc ya Virunga nsima na bobomami ya koleka bato 11 ba ADF bafundami kosala butu ya lundi na mardi na territoire ya Beni, na Nord-Kivu.

"Ezali nzoto ya bato baye ba ADF bamemaki (otages) nsima na bobomami basalaki na mboka Halungupa (Alungupa)," eyebisi na AFP nkumu ya groupement Malambo na sud-est ya engumba Beni, na Nord-Kivu.

Kolonda maloba maye, nzoto yango etikali nanu na parc ya Virunga epayi wapi emonanaki.

Wuto libandela ya novembre, koleka bato 398 babomami na bitumba ba ADF bafundami kosala.

Mbala eleki, ba civili mwambe, soda moko mpe moyi misala ya bokengi moko bakufaki na maboko ya batomboki bafundami kozala ba ADF musulmane ya Ouganda.

Jeanine Mabunda, mokambi ya Assemblée nationale alobaki, na boleki bwa ye lundi na Beni, ete mbulamatari ezali kosala manso mpo na kokilisa bitumba biye.

Mampinga ya ba FARDC mabandaki offensive (bitumba makasi) na ba ADf na novembre mpe masakolaki mbala mingi ete mabotola bisika ebele na maboko ya ba simba minduki baye.

Ba ADF bafundamaka na koboma na Beni uto 2014.

XS
SM
MD
LG