Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Dos Santos alobi mwana na ye José Filomeno ayiba te


D à G: Filomeno dos Santos, Isabel dos Santos, Tchizé dos Santos na Paulino dos Santos (Coreon Du), bana ya José Eduardo dos Santos mokonzi ya kala ya Angola
D à G: Filomeno dos Santos, Isabel dos Santos, Tchizé dos Santos na Paulino dos Santos (Coreon Du), bana ya José Eduardo dos Santos mokonzi ya kala ya Angola

Mokonzi ya kala ya Angola José Eduardo Santos akomi na mokanda ete mwana na ye José Filomeno elongo na mokambi ya kala ya Banque centrale ya mboka na ye baye bazali kosambisama, bayiba te, elobi AFP.

Ezali eyano M. Dos Santos apesi na mituna ya bazuzi ya le 6 février eye etangamaki na bosambisami le 18 février.

Wuta Espagne epayi wapi akoma kovanda, M. Dos Santos akomi ete mwana wa ye na mokambi ya kala ya Banque centrale Valter Filipe de Silva basalaki "oyo esengelaki mpo na kobongisa bomoi ya bana ya Angola".

M. Filomeno, mibu 42, akambaki fonds souverain angolais na bokonzi ya tata wa ye.

Afundama na misala ya bosembo na kopengwisa 500 millions ya ba dollars ya l’Etat na lisungi ya mokambi ya Banque centrale mpe kotinda yango na Suisse.

"Napesaki ndingisa ya botindami (transfert) ya 500 millions ya ba dollars maye mazalaki mpo na ko garantir ba investissements ya 30 milliards de dollards," ekomi M. dos Santos.

"Yango ezalaki mpo na situation économique ya mboka… kasi mpo na intérêt personnel te ya baye basalaki transfert yango," eyebisi M. dos Santos.

Mokonzi ya kala ya Angola alobi ete asengaki M. da Silva (ya Banque centrale) kobomba sekele yango makasi kasi ye moko ayebisaki Joao Lourenço, mokitani na ye uto 2017.

Kolanda Sergio Raimundo, avocat ya mokambi ya kala ya Banque centrale eyano ya M. dos Santos "etalisi ete makambo masalamaki mazwaki ndingisa" ya mokonzi ya mboka.

M. Filomena akangamaki na septembre 2018 kasi atikamaki nsima sanza motoba mpo na kozela bosambisami boye bobandaki na décembre 2019 na Luanda.

XS
SM
MD
LG