Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Rwanda ezwi moto ya yambo na Coronavirus


Infirmière azali kosalisa mokoni mokono, na lopitalo moko na ushekeli, pene na Kibogora, na Rwanda, 5 novembre 2019.
Infirmière azali kosalisa mokoni mokono, na lopitalo moko na ushekeli, pene na Kibogora, na Rwanda, 5 novembre 2019.

Bakonzi ba bokolongono na Rwanda basokoli komona moto ya yambo na bokono bwa coronavirus.

"Ezali moyi India oyo akomaki na mabele ya Rwanda mposo moleki kowuta na Mumbai (Inde)," esakoli ministere ya bokolongono.

"Azali kozwa lisalisi mpe nzoto na ye ekomi mwa malamu, kasi atiyami na bokabwani na bakoni basusu. Bolandeli ya baye banso bazalaki na ye bozali kosalema mpo koluka kopekisa bopanzani bwa yango," elobi bakonzi ya bokolongono.

Rwanda ekomi ekolo ya misatu ya monyele ya Afrika komonana na bokono boye bopanzani mokili mobimba.

Bakambi ba Rwanda batie na bisika mingi na Kigali bisaleli ya kosukala maboko.

Concerts, meetings (mitingi), foires mpe milulu misusu ya bato mingi epekisami na Rwanda.

RwandAir, compagnie ya mpepo ya ekolo eye, epekisi mpe mibembo minso mya Chine, esika wapi bokono bwa cronavirus 2019 ebandaki mpe ebomi bato koleka.

Na ngambo ya ndelo, RDC ekomi na bato babale na bokono bwango COVID-19.

XS
SM
MD
LG