Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Trump apekisi bato bakowuta Europa kokota Etats-Unis


Président Donald Trump azali kopesa lisikulu na ndako ya mosala mwa ye Bureau ovale, na Maison Blanche, Washington, 11 mars 2020.
Président Donald Trump azali kopesa lisikulu na ndako ya mosala mwa ye Bureau ovale, na Maison Blanche, Washington, 11 mars 2020.

Président Donald Trump asakoli bopekisami ya baye bakowuta na Europa kokota na mabele ya Etats-Unis. Mokano mwa motali bayi espace Schengen kasi motali te Irlande na Royaume Uni. Union européenne epaleli mokano mwango.

Na lisikuli na ye na butu na mercredi uto ndako wa ye ya mosala Bureau ovale, M. Trump ayebisi ete "mokano mwango mozali mpo kobatale bokolongono mpe bozali bolamu ya ba Américains banso".

Bopekisi yango bokobanda vendredi mpe bowumela mikolo tuku misato.

"Bana ya Amerika baye bazali kozonga mboka bakomema na libanda ya mpepo zomi na misato. Bakotala bango malamu mpe tokosenga moko moko na ba Américains mpe bavandi baye bazwa mikanda (green card) baye bazali kozonga na Etats-Unis komitiya na bokangami (quarantaine) mikolo zomi na minei," elimboli na CNN vice-président Mike Pence oyo azali mokambi ya bitumba na bokono bwa coronavirus awa na Etats-Unis.

Kasi Union européenne epamali mokano ya président Donald Trump, kolanda Commission européenne mpe Conseil ya balakisi bilongo ya bikolo ya Union européenne.

Coronavirus bopanzami mokili mobimba.

Mercredi, mokambi ya OMS (Mabongisi ya molongo mpo na bokolongono) Tedros Adhanon Ghebreyesus asakolaki ete COVID19 ezali pandémie mondial (bokono bompazani mokili mobimba).

Bato 127.000 bazwi na molongo mobimba mpe 4.600 nde bakufi na yango uto ebandaki na Chine na na novembre ya mobu moleki.

Na poto (Europa), bato 950 bakufi mpe 22.000 bazwi yango.

Ekolo Congo démocratique ezwaki yayango moto wa yambo mardi eleki na Kinshasa.

XS
SM
MD
LG