Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Coronavirus na Cameroun mpe na Togo


Moto moko azipi zolo na monoko mpo na komibateli na coronavirus na YAoundé, Cameroun, 6 mars 2020.
Moto moko azipi zolo na monoko mpo na komibateli na coronavirus na YAoundé, Cameroun, 6 mars 2020.

Bokono bwa coronavirus bomonisami na Cameroun mpe na Togo, elobi bakonzi ya bikolo biye.

Na Cameroun, mokoni wa yambo ya coronavirus azali Francais moko ya mibu tuku motoba na mwambe awutaki mobembo na mboka na ye le 24 février, eyebisi ministre ya bokolongono.

Moto yango atiyami na lopitalo ya Yaoundé.

Na Togo, ezali mwasi moko ya mibu tuku minei na mibale nde azwami na virus ya bokono boye.

Mwasi yango awatuaki na Bénin kasi asalaki mpe mobembo na Allemagne, France mpe Turquie.

Na RDC moto moko azwami na yango nanu kasi na Kasaï ba Chinois banei batiami na botalami uto moko ya mibale nsima na bango kowuta mboka na bango kasi banisami na nde malaria, elobi mokambi ya etuka eye.

Ndenge moko mpe na Congo-Brazzaville, epayi wapi bakonzi basakoli ete bakotiya na quarantaine bayi mobembo banso bakowuta na France, Italie, Chine, Corée du Sud na Iran, esika wapi bokono bwa coronavirus bozali kongala.

XS
SM
MD
LG