Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Moto ya yambo ya coronavirus na Brazzaville mpe ya misato na Kinshasa


Mosali ya bopeto na lopitalo moko na Salvador, 14 mars 2020.
Mosali ya bopeto na lopitalo moko na Salvador, 14 mars 2020.

Moto ya yambo azwami na bokono bwa coronavirus azwami na Brazzaville, eyebisi bakonzi ya Congo-Brazzaville. Mpe ya misato, na ngambo ya RDC, kolonda bakambi ya misala mya bokolongono.

"Ezali Franco-congolais ya mibu 50 oyo awuki na France na nzela ya Addis Abeba," ekomi na compte Twitter na ye ministre molebeli ya mbulamatari ya Congo-Brazzaville, Thierry Moungalla.

Kolanda makomi maye, mbulamatari ekundoli na bato litomba ya kosala makambo makopekisa bobanzani na yango, komibatala mpe kozala na bokengi.

Na ngambo ya RDC, bakonzi ya bokolongono nde basakoli moto ya misato.

"Moto ya misato na COVID19 azwami lelo na Kinhsasa. Ezali mwana ya Congo moko oyo avandaki na Suisse kala mingi. Amitiami na kobombana mpe azali kozwa lisalisi lisengeli," ekomi na Twitter na ye ministre ya bokolongo ya RDC, Dr. Eteni Longondo.

XS
SM
MD
LG