Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Pompeo akebisi Chine mpo na kokosela USA makambo ya bobandi ya COVID19


Mokambi ya mambi matali bikolo bya bapaya ya Etats-Unis, Secrétaire d’Etat Mike Pompeo na moyi bureau politiki ya parti communiste ya Chine Yang Jiechi na Washington, Etats-Unis, 9 novembre 2018.
Mokambi ya mambi matali bikolo bya bapaya ya Etats-Unis, Secrétaire d’Etat Mike Pompeo na moyi bureau politiki ya parti communiste ya Chine Yang Jiechi na Washington, Etats-Unis, 9 novembre 2018.

Mokambi ya mambi matali bikolo bya bapaya ya Etats-Unis, Secrétaire d’Etat Mike Pompeo apameli Chine mpo na kokosela mboka na ye makambo mpo na ndenge coronavirus COVID-19 ebandaki. COVID-19 epanzi mokili mobimba mpe ebomi bato mingi.

M. Pompeo asoli likambo lyango na mokambi ya parti communiste ya Chine Yang Jiechi.

M. Pompeo "aboyi na makasi makambo Chine ezali kosala mpo komemisa mokumba ya COVID-19 na Etats-Unis," elobi liyebisi ya département d’Etat ya USA.

Washington ebengisaki ambassadeur ya Chine vendredi mpo na kotuna ye malabo ya bakonzi ya mboka na ye.

Molebeli ya ministère ya misala ya mboka ya bapaya ya Chine, Zhao Lijian, akomaki na Twitter ete "mampinga ya Amerika makoki kozala ete makotisaki virus na Wuhan," engumba ya Chine epayi wapi bokono boye bobandaki na décembre kolanda mingi na ba scientifiques.

M. Pompeo apesaki nkanda na Chine ntango abengaki yango "virus ya Wuhan", ntango OMS (Mabongisi ya molongo mpo na bokolongono) epekisa koloba boye.

XS
SM
MD
LG