Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Policier moko akufi mpe 8 bazoki na ba attentats na ambassade ya USA na Tunis


Police etiyami na esika ya attentat mibale esalami pene na ambassade ya Etats-Unis na Tunis, 6 mars 2020.
Police etiyami na esika ya attentat mibale esalami pene na ambassade ya Etats-Unis na Tunis, 6 mars 2020.

Policier moko akufii mpe mitanu misusu bazoki na attentat mibale na ambassade ya Etst-Unis na Tunis.

Na juin 2019, attaque mibale esalamaki na engumba eye mpe lingomba Etat islamique endimaki mokumba na yango.

Ezali mpasi na kokoba kosala mosala ntango omoni ndenge banika bazoki, elobi moko na ba policiers.

Moto moko te andimi kino sik’oyo mokumba ya attentat eye.

Limpinga ya police nde balukaki, eyebisi molobeli ya ministère ya Intérieur, Khaled Ayouni.

Ambassadeur américain Donald Blome apesi losako na lolenge bobatelami ya lombanga bosalami na bakonzi ya Tunis.

XS
SM
MD
LG