Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Trump asali test ya coronavirus


Président Donald Trump na bokutani na bapanzi sango na Maison Blanche, Washington DC, 14 mars 2020.
Président Donald Trump na bokutani na bapanzi sango na Maison Blanche, Washington DC, 14 mars 2020.

Président Donald Trump asakoli ete asali test ya coronavirus (COVID-19) mpe eyano na yango ekoyebana na mikolo  mikoya.

"Nasalaki test lobi na mpokwa," elobi mokonzi ya Etats-Unis na bokutani na bapanzi sango na Maison Blanche na Washington DC.

Vendredi alimbolaki ete zalaki na ntina ya test te mpo azali bilembo ya bokono te. Azwaki mikano mingi lokola kobanda kobanda kosala ba Americains test na ba magasins ya minene, mpe bilembo bya yango nde bimonani nsima mwa ngonga.

Ndelo ya Etats-Unis ekangami mpo ba bayi banso bakowuta poto (Europe).

Nzokande M. Trump atiyamaki mbamba na kosala test mpo ayambaki mpe apesaki mbote na moko na bakonzi ya Brésil oyo andimamaki nsima na bozongi na mboka na ye na kozala na coronavirus.

XS
SM
MD
LG