Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bakonzi ya Etats-Unis basengi bakolo basala ba stocks mpo na coronavirus


BAto bayike na CDC (Centres  américains ya contrôle ya bokolongono mpe ya prevention ya maladi) na Califonie, Etats-Unis, 5 mars 2020.
BAto bayike na CDC (Centres  américains ya contrôle ya bokolongono mpe ya prevention ya maladi) na Califonie, Etats-Unis, 5 mars 2020.

Bakonzi ya bokolongono ya Etats-Unis basengi na bato basi bakoli na mibu kosala ba stocks ya bileyi mpe ya nkisi (mino) mpe komibongisa na ntina ya kovanda na ndaku mpo na coronavirus.

"Bosala ete ba stocks ezala, mingi penza mpo na mino (nkisi) ya tension artérielle mpe ya diabète, mpe mino misusu bato baselaka mpo kosunga ntango ya fevele mpe ba symptômes misusu," elobi Nancy Messonier, mokambi ya ba CDC (Centres américains ya contrôle ya bokolongono mpe ya prevention ya maladi).

"Bozala na ba biloko ya kosalela na ndako (prodtuis menagers) mpe ba provisions mpo na komibongisa soki bokovanda na ndako mpo na mwa ntango," ebakisi, Mme Messomier.

Mikano miye mipesami kolanda étude esalamaki likolo ya bakoni 70.000 na Chine, eye elakisi ete bakolo bazali kati na 15 na 20% ya baye bokweyaka mpenza maladi.

Banda mibu 60, likama ya kozwa bokono lizali mingi mpe likomaka makasi soki mibu mibakisami, elimboli Mme Messonnier.

XS
SM
MD
LG