Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bakonzi ya Kigali bapekisi bosangani ya bato mingi mpo na kobanga coronavirus


Président Paul kagame na Londres, Grande Bretagne, 20 janvier 2020.
Président Paul kagame na Londres, Grande Bretagne, 20 janvier 2020.

Ba concerts, meetings (mitingi) to mpe bosangani ya bato ebele epekisami na Kigali mpo na kobatela ekolo na bobanzani ya bokono bwa coronavirus, elobi bakonzi ya engumba eye. Moto moko te nanu azwami na coronavirus na Rwanda.

"Engumba ya Kigali eyebisi ete bosangani bonso ya masano, bokutani bonso etali social, mombongo (lokola foire), exposition nyonso mpe bokutani ya bato ebele… bokesami kino mitindo mya sika mikopesama," elakisi liyebisi ya ba nkumu ya engumba Kigali.

Mokano moye motali te bokutani ya bato moke lokola milulu to feti ya makwela, etonga to eklezia, hôtels, restaurants, bars mpe clubs ya sports wapi epayi bakonzi basengi bato kolanda na bokebi malako ya bopeto.

Mbulamatari ya Rwanda ekebisi bana mboka na yango mpo na kosala mibembo na bikolo biye bizali na coronavirus.

Rwanda nanu ezwi bokono bwango te.

Na Afrika, bikolo mwambe bisili kozwa yango (Algérie, Maroc, Egypte, Sénégal, Nigeria, Cameroun, Togo mpe Afrique du Sud.

Koleka bato 310.00 basili kozwa bokono bwango na mokili mobimba.

XS
SM
MD
LG