Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Brazzaville esakoli kotiya na quarantaine bato banso bako wuta France, Chine, Corée S. na Italie


Mosalani na bokolongono azali komeka moto ya nzoto ya moto moko na Goma, Kivu, 15 juillet 2015.
Mosalani na bokolongono azali komeka moto ya nzoto ya moto moko na Goma, Kivu, 15 juillet 2015.

Bakonzi ya Congo-Brazzaville basakoli ete bakotiya na quarantaine bayi mobembo banso bakowuta na France, Italie, Chine, Corée du Sud na Iran, esika wapi bokono bwa coronavirus bozali kongala.

Ministère ya affaires étrangères eyebisaki ba ambassades banso ya bikolo ya bapaya na Brazzaville.

Kasi mokano mwa motiyamaki nanu te na mosala kino mpokwa.

Baye bakitaki na mpepo ya Air France ewutaki Paris jeudi na mpokwa bazongaki ndako nsima na kozwama température na bango na libanda ya mpepo. .

Kaka mwasi moko nde asimbamaki mpo nzoto na ye ezali moto mpo azwaki mangwele ya hépathite B.

Kolanda mokano ya mbulamatari, ba tests ya COVID-19

XS
SM
MD
LG