Bayi opposition ya Congo-Brazzaville batelemeli mabongisi ya mobeko matikami na parlement na ntina ya kopesa nzela na bayi bokengi mpe ba soda kokoka kopona yambo na ngonga. Mpo na opposition, ezali mpo kobebisa maponami ya mokonzi ya mboka ya 2021.
+Kamerhe apesi longonya na baye batambolaki +Linaka lya bozongeli kelasi mpo na kosilisi année scolaire lipesami +Bato bawei ba bokwei ya ndako na Lubumbashi +Président ya Burundi alobi akoyokana te na Rwanda +Liban eboyi bolukiluki bwa molongo
Audience ya mibale ya bosambisami ya Vital Kamerhe mokambi ya ndako ya mosala ya président Félix Tshisekedi botindami le 21 août. Kasi balandi ya M. Kamerhe batambolaki na Kinshasa mpe bingumba mingi mpo na kosenga bobimisami ya mokambi na bango.
"Mampinga ma Zambie matitaki mpenza mabele ma Ekolo Congo démocratique le 3 août," eyebisi molobeli ya président Félix Tshisekedi. Liyebisi na ye lipesami mokolo moko nsima na Sénatrice Francine Muyumba kotia ntembe na likambo lyango.
Bato bayebani te babetaki masasi na ndako ya Moïse Katumbi na Lubumbashi (Haut-Katanga), eyebisi bayi bwanya ya lingomba na ye Ensemble pour la république.
Cour ya cassation eboyi kobimisa Vital Kamerhe, mokambi ya ndako ya misala ya président Félix Tshisekedi, oyo azongeli kosambela na Cour d’Appel.
Ministre ya Défense ya Ekolo Congo démocratique, Aimé Ngoy Mukena akutanaki mercredi na ntoma ya Amerika na Kinshasa, Mike Hammer, na masolo mokolo moko nsima na bozengeli boyokani ya bokengi kati na bikolo mibale.
+Etats-Unis etie mokoloto na mokanda ya kozongela boyokani ya bokengi na RDC (Ba officiers ya FARDC bakolanda mateay na Amerika) +Basali ya labo ya Ebola mpe COVID19 batelemisi mosala na Mbandaka +Ambassade ya Turquie endimi ete JMM Mokoko azali na lopitalo na Ankara +Bayi petololo balaki grève
Bazuzi babale kati na baye batiamaki na Cour ya cassation na président Félix Tshisekedi baboyi kozwa ebonga na bango ya sika, na kolobaka ete botiami bwa bango bobuki Buku likonzi.
Moto moko akufi, tribunal mpe ba bureaux etumbami na mobulu bayi UDPS (lingomba lya président Félix Tshisekedi) basalaki lundi na Kasumbalesa, na Haut-Katanga, mpo na kotelemela liwa lya moko na bango butu boleki.
Zacharie Badiengila mokambi ya Bundu dia Kongo (BDK) oyo amibengaka na nkombo ya Ne Muanda Nsemi azongi na ndako na ye nsima na kobimisama na CNPP esika wapi atiamaki mpo na lisalisi nsima na bokangami na ye le 24 avril.
#FCC ekebisi ete ekopesa maboko te na mabongisa manso mazali mpo kolekisa ntango ya maponami. Elobi yango ntango baike bazali kosenga mbongwana na misala ya maponi mpe baboyi bondimami ya Ronsard Malonda bo' mokambi ya CENI.
Mosambeli ya Vital Kamerhe, ya ekolo France, batonnier Pierre-Olivier Sur alobi ete ambassade ya RDC na France epimeli ye visa mpo na procès eye ezongeli na Kinshasa wuto mposo moleki na Cour d'appel, na boloko bonene ya Makala, CPRK na Kinshasa.
Président Denis Sassou N’Guesso aponami bo' mokambi ya CEEAC na bakokani baye ya kati kati ya Afrika. RDC, na président Félix Tshisekedi, nde ezwi bokambi ya Commission genre, Commission genre, développement humain et social.
Président Donald Trump alobi na tweet moko ete "ekozala malamu kopusa maponami" mpo na COVID19 mpe mpo na koboya moyibi.
Herman Cain, candidat ya moyindo kati na ba républicains ba welelaka ebonga na maponami ya mokonzi ya mboka na 2012 akufi na COVID19 na mibu 74 na COVID19.
Opposant Jean-Marie Michel Mokoko azwi mpepo lelo mpo na kokende na Turquie na ntina ya kosalisa nzoto na ye.
+Tshisekedi na Jaynet Kabila bakutanaki elongo na Nangaa +VPM Kankonde andimi Mayobo bo' mokambi ya PALU +Basimba minduki 15 bakatelami etumbu ya mibu 20 ba Bunia +COVID19 emati makasi na Madagascar
Bakoni bayebani kozala na COVID19 bakomi koleka 10.000 mpe tuku libwa na misato bakufi na Madagascar mboka eye esakolaki ete ezwaki mono mokobikisa.
Président Félix Tshisekedi ayambaki Jaynet Kabila, lipasa ya mokonzi ya kala Joseph Kabila elongo mokambi ya mokambi ya CENI na motambwisi ya misala mya bokengi ya kala, Kazadi Nyembwe.
Voir plus