Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

COIVD19 emati makasi na Madagascar ata nkisi ya Artemisia esalamaki kuna


Bato basili molongo mpo na komela CVO mono mosalami na Madagascar mpo na COVID19, Antananarivo, 24 avil 2020
Bato basili molongo mpo na komela CVO mono mosalami na Madagascar mpo na COVID19, Antananarivo, 24 avil 2020

Bakoni bayebani kozala na COVID19 bakomi koleka 10.000 mpe tuku libwa na misato bakufi na Madagascar mboka eye esakolaki ete ezwaki mono mokobikisa.

Bakonzi ba Madagascar babongoli libando lya masano na esika ya kopesa lisali na babeli mpo motango momati.

Kati na bato 300 to 400 bazali kozwa yango mokolo na mokolo. Yango ezali mbala misato motango mozalaki mposo misato mileki.

Ministre ya mambi ma Bokonongono atindi mikanda ya basungi ba molongo mpo na lisalisi lya lombango.

Makambo mingi mazangaki koyebana na misala ya ministère ya bokonongono.

Nzokande, mokonzi ya Madagascar Andry Rojoelina alakisaki na mokili mobimba na avril mono na nkombo ya CVO mosalami na Artemisia mpe alobaki ete ebikisaka bato.

CDC (misala ya Amerika mitalaka bokono) mpe OMS (Mabongisi ma malongo mpo na bokolongono) epesa eyano moko te mpo na mono moye.

Na RDC, Dr. Jérôme Munyangi mpe azali nanu kosala boluki likolo na mono mosusu ekokoka kobisa COVID19 wuta Kinshasa.

XS
SM
MD
LG