Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Audience ya mibale ya bosambisami ya bozongeli ya Kamerhe le 21 août


Vital Kamerhe, mokambi ya UNC (G) na Felix Tshisekedi ya UDPS na boyokani na Nairobi, Kenya, 23 novembre 2018.
Vital Kamerhe, mokambi ya UNC (G) na Felix Tshisekedi ya UDPS na boyokani na Nairobi, Kenya, 23 novembre 2018.

Audience ya mibale ya bosambisami ya Vital Kamerhe mokambi ya ndako ya mosala ya président Félix Tshisekedi botindami le 21 août. Kasi balandi ya M. Kamerhe batambolaki na Kinshasa mpe bingumba mingi mpo na kosenga bobimisami ya mokambi na bango.

Bosambisami ya M. Kamerhe bosalamaki lisusu te vendredi na Boloko ya Makala CPRK na Kinshasa epayi wapi azali kolekisa etumbu na ye ya mibu 20 mya misala makasi bakisa 10 ya bopekisami ya makoki ma politiki..

Cour d'appel etindiki bosambisami bwango le 21 août..

Cour eye elobi esengeli etinda yambo mokanda ya mbela na balakisi bilongi ba ekolo.

Basambeli ba M. Kamerhe Balobi bakamwe na likambo lyango.

"Ndenge nini bakatelaki cleint na biso etumbu na lombango na bosambisami ya yambo kasi ekoma na ya mibale bakomi koloba makambo ya procédures!?" ekamwe moko na basambelli ba M. Kamerhe, Me. Jean-Marie Kabengela.

Ekomi mbala ya mibale nde Cour d'appel etindika nsima bosambisami bwango na ntina nse moko wana.

Nzokande bayi UNC, lingomba lya Vital Kamerhe, bantambolaki na Kinshasa, na Goma mpe na binguma mingi ya Ekolo Congo démocratique.

Mikolo mibale mileki, Cour ya cassation eboyi bosengi ya M. Kamerhe ya mbala mwambe mpo na kobimisama.

M. Kamerhe ezwaki etumbu ya mibu 20 mya misala makasi bakisa 10 ya bopekisimi makoki ma politiki mpo na kopengwisa misolo mya kotonga ndako na ntina ya mikolo nkama my bokonzi ya M. Tshisekedi.

Azwaki etumbu elongo na Jammal Samih, nkolo compagnie SAMIBO na mosali ya présidence ne import-export, Jeannot Muhima.

XS
SM
MD
LG