Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

FCC elobi ekopesa maboko te na makambo makoki kozongisa maponami nsima


Néhémie Mwilanya (2e G), motambwisi ya FCC ya Joseph Kabila, pene na Emmanuel Ramazani Shadary (C) kalaka motambwisi ya PPRD na botamboli na boulevard Sendwe, na Kinshasa, RDC, 23 juillet 2020. (Facebook/PPRD Esimba)
Néhémie Mwilanya (2e G), motambwisi ya FCC ya Joseph Kabila, pene na Emmanuel Ramazani Shadary (C) kalaka motambwisi ya PPRD na botamboli na boulevard Sendwe, na Kinshasa, RDC, 23 juillet 2020. (Facebook/PPRD Esimba)

#FCC ekebisi ete ekopesa maboko te na mabongisa manso mazali mpo kolekisa ntango ya maponami. Elobi yango ntango baike bazali kosenga mbongwana na misala ya maponi mpe baboyi bondimami ya Ronsard Malonda bo' mokambi ya CENI.

Bakambi ya masanga mazali kati na FCC (Front commun pour le Congo) ya mokonzi ya kala Joseph Kabila, bakutanaki mercredi na Kinshasa nsima botamboli basalaki mposo moleki na ekolo mobimba.

FCC elaki kozala na mabongisi mpe masolo manso mazali kosalama mpo na mbongwana ya misala ya maponami, elobi bakambi na yango nsima na bokutani ya le

"FCC… ekopesa te maboko na misala manso mizongisami nsima maponami masengeli masalama na 2023," elakisi liyebisi ya FCC.

Bakeli mibeko baike zomi na mibale ya mango mingi bazalai kokutana na ngambo inso ya politiki mpe ya société civile mpo na koluka bomoko na makanisi ma mbongwana na misala mya maponami.

Mpo na bakambi ya FCC, "mabongisami mpe masolo manso maye masengeli kosalama na kati ya ba institutions, kolanda Buku Likonzi mpe mibeko mya ekolo".

CACH, lingomba linene lya président Félix Tshisekedi, lokola mpe Lamuka mpe baike na société civile baboyaki bondimami ya Ronsard Malaonda na Assemblée nationale nsima na boponami bwa ye na baike na bakambi ya biyamba.

FCC nde ezali na motango ya bakeli mibeko koleka na Assemblée nationale.

XS
SM
MD
LG