Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Moto moko akufi, tribunal mpe bureaux etumbami na mobulu ya bayi UDPS na Kasumbalesa


Bato babemisaki ba bureaux mpe batumbaki mituka na mobulu na Kasumbalesa, Haut-Katanga, 9 septembre 2016. VAO/Narval MabilaSelon
Bato babemisaki ba bureaux mpe batumbaki mituka na mobulu na Kasumbalesa, Haut-Katanga, 9 septembre 2016. VAO/Narval MabilaSelon

Moto moko akufi, tribunal mpe ba bureaux etumbami na mobulu bayi UDPS (lingomba lya président Félix Tshisekedi) basalaki lundi na Kasumbalesa, na Haut-Katanga, mpo na kotelemela liwa lya moko na bango butu boleki.

Moleki nzela moko azwaki masasi mpe akufaki na lipitalo na mobulu yango, elobi André Kapampa Kamwanya, maire ya Kasumbalesa, na ndelo na Zambie.

Kolanda maloba ma M. Kapampa, bayi UDPS bapanzaki ba commissariats ya police mibale, tribunal mpe biloko ya bato basusu.

Bayi UDPS bazalaki kotelemela bobomami bwa moko kati na bango butu boleki na baye bayebani te.

Kolanda maloba ma président ya UDPS na Kasumbalesa, Bruno Tshibangu, nzoto ya mokambi ya "Parlement débout” ya esika eye nde elokotamaki na ntongo nsima na bato bayebani kobama ye butu boleki.

"Soki babomi, eyano eyaka mbala moko," elobi M. Tshibangu.

Bokengi bozali lisusu mpenza na Kasumbalesa lokola na binguma mingi ya Haut-Katanga.

Le 9 juillet, balandi libwa lya lingomba bakutamaki ya kokufa.

Bayi UDPS lokola basusu bazali kopamela ndenge bozangi bokengi bozali kokoba na etuka ya Haut-Katanga.

XS
SM
MD
LG