Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Herman Cain candidat ya moyindo ya ba républicains na présidentielle ya 2012 akufi


Herman Cain na boktuna bobengami Faith and 20 juin 20, 2014.
Herman Cain na boktuna bobengami Faith and 20 juin 20, 2014.

Herman Cain, candidat ya moyindo kati na ba républicains ba welelaka ebonga na maponami ya mokonzi ya mboka na 2012 akufi na COVID19 na mibu 74 na COVID19.

M. Cain azalaki moyi mobongo to businessman.

Sango ya liwa n aye epesami na site internet na ye.

M. Cain azwamaki na COVID19 le 29 juin 2020 mpe akotaki lopitalo mikolo mibale nsima na yango mpo bokono kokomaki makasi.

Amonanaki na bokono bwango mikolo mibale nsima na kozala na meetingi ya Donald Trump na mboka Tulsa, na Oklahoma, na Etats-Unis.

Na maponami ma 2012, théorie ezalaki 9-9-9 (Nine-nine-nine).

Afundamaki na basi mingi na kozwa bango na makasi ntango bazalaki koluka mosala epayi na ye.

Azalaki moko na bakambi malewa McDonald.

XS
SM
MD
LG