Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mosambeli ya français ya Vital Kamerhe alobi RDC eboyi kopesa ye visa mpo na procès


Vital Kamerhe, ntango ya bokeli lingomba lya boyokani na Félix Tshisekedi na Nairobi, Kenya, 23 novembre 2018.
Vital Kamerhe, ntango ya bokeli lingomba lya boyokani na Félix Tshisekedi na Nairobi, Kenya, 23 novembre 2018.

Mosambeli ya Vital Kamerhe, ya ekolo France, batonnier Pierre-Olivier Sur alobi ete ambassade ya RDC na France epimeli ye visa mpo na procès eye ezongeli na Kinshasa wuto mposo moleki na Cour d'appel, na boloko bonene ya Makala, CPRK na Kinshasa.

Me pierre-Olivier Sur alobi na liyebisi ete bakonzi ba Ekolo Congo démocratique bayonoli ye ete boyokani bozali te kati na France na RDC mpo na kotika basembali ya France bakende kosambela na nabele ma Congo.

Mpo na ye bakonzi ya RDC bapesi mokongo na bitumba ya bakambi babunda makasi wuto ntango ya noko.

"Na sengaki ye (Chargé d’affaires ya ambassade ya RDC na France) atuna ba bâtonniers ya Nord-Kivu mpe Sud-Kivu, baye na yambaki na bondeko bonso ntango ya bâtonnat na ngai na 2015 na Paris, mpo na kokoba boyokani boye," ekomi Me Sur.

Mpo na Me Sur, ezali bozongi bosembo (non-droit) mpe bokweyisami -na nzela ya bosembo- ya ekolo enene ya Afrika.

Bazuzi bapusaki bosambisami ya kozongela ya Vital Kamerhe le 7 aout.

XS
SM
MD
LG