Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Opposant Mokoko akei kozwa lisalisi lya nzoto na Turquie


Général Jean Marie Michel Mokoko akatelama mibu 20 mya boloko. (VOA/Arsène Séverin)
Général Jean Marie Michel Mokoko akatelama mibu 20 mya boloko. (VOA/Arsène Séverin)

Opposant Jean-Marie Michel Mokoko azwi mpepo lelo mpo na kokende na Turquie na ntina ya kosalisa nzoto na ye.

Ezali mpepo ebongolami lopitalo eye mbulamatari ya Congo-Brazzaville ezwaki mpo na ye. Mosambeli ya Michel Mokoko alobi ete Monganga azalaki kotala ye akitisamaki na mpepo mpe asali mobembo te.

Jean-Marie Michel Mokoko azali kosala mobembo yango na basinzili baiike ya bokengi.

Mpepo yango elongwaki na ngonga ya 11 :30 ya ntongo na libanda lya mpepo ya Brazzaville.

Mwana mboka Mokoko akotaki lopitalo wuto le 2 juillet na kowuta boloko epayi wapi esengelaki alekisa mibu tuku mibale.

Akatelemaki etumbu eye na kosimbisama mpo na kozwama na minduki mpe koluka kokweyisa bokonzi.

Awelelaki maponami ya mokonzi ya mboka na Denis Sassou N’Guesso na 2016.

XS
SM
MD
LG