Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Cour ya cassation eboyi kobimisa Kamerhe


Vital Kamerhe, mokambi ya UNC, azali koyanola na bapanzi sango, na Kinshasa, 13 septembre 2014.
Vital Kamerhe, mokambi ya UNC, azali koyanola na bapanzi sango, na Kinshasa, 13 septembre 2014.

Cour ya cassation eboyi kobimisa Vital Kamerhe, mokambi ya ndako ya misala ya président Félix Tshisekedi, oyo azongeli kosambela na Cour d’Appel.

Mokano ya Cour ya cassation epesami nsima na 48 heures lokola elakamaki.

Basambeli ba M. Kamerhe bakendeki na Cour ya cassation nsima na boboyi ya Cour d’appel.

Yambo na yango, Tribunal ya grande instance ya Gombe esambisaki M. Kamerhe mpe ekatelaki ye mibu 20 ya misala makasi bakisa mibu 10 mya mopekisami ma makoki ma politiki.

Bosambisami ya M. Kamerhe bobandelaki sanza eleki na Cour d’Appel na bosengi na ye na basambeli ba ye.

M. Kamerhe afundama elongo na nkolo ya copmagnie ya botongi SAMIBO, Sammih Jamal mpe na mosali ya export-import ya présidence ya république mpo na bopengwisama ya misolo mizalaki mpo botongi ndako mpo na mikolo nkama mya président Tshisekedi.

Audience ekoya etiamaki le 7 août 2020 na boloko ya Makala CPRK na Kinshasa.

Balandi ba ye balaki kotambola mokolo mwango mpo na kosenga bomisami bwa ye.

XS
SM
MD
LG