Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ministre ya Défense ya RDC na ambassadeur ya Etats-Unis basololi mpo na formation ya FARDC na USA


Ambassadeur ya Amerika na kinshasa Mike Hammer (1e na molongo ya D) na masolo na ministre ya Défense ya RDC Aimé Ngoy Mukena na Kinshasa, 5 août 2020. (Twitter/Mike Hammer)
Ambassadeur ya Amerika na kinshasa Mike Hammer (1e na molongo ya D) na masolo na ministre ya Défense ya RDC Aimé Ngoy Mukena na Kinshasa, 5 août 2020. (Twitter/Mike Hammer)

Ministre ya Défense ya Ekolo Congo démocratique, Aimé Ngoy Mukena akutanaki mercredi na ntoma ya Amerika na Kinshasa, Mike Hammer, na masolo mokolo moko nsima na bozengeli boyokani ya bokengi kati na bikolo mibale.

Tokutani "na ministre ya Défense mpo na kondima lisusu bobandeli ya boyokani na FARDC na ntina ya mateya, ya coopération civilo-militaire, kobatela makoki ma bomoto," eyebisi na Twitter ambassadeur Mike Hammer oyo amibengaka "Nzita" na nkombo ya bana ya RDC.

"Kotombola kimya mpe bokengi ezali likonzi ya boyokani ya makasi mpo na kimya mpe kofulukisama @PP4PP," ebakisi M. Hammer.

Etats-Unis na RDC bazali na kati linaka libengami PP4PP ( boyokani ya makasi mpo na kimya mpe kofulukisama) wuto président Félix Tshisekedi akota na bokonzi.

Mardi, ambassade ya Etats-Unis esakolaki ete etiaki manzaka na mokanda ya kondima bozongeli boyokani kati ba bikolo na ntina ya bokengi.

XS
SM
MD
LG