Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Trump apesi makanisi ya kopusa maponami ma le 3 novembre


Président Donald Trump na Washington, 22 juillet 2020.
Président Donald Trump na Washington, 22 juillet 2020.

Président Donald Trump alobi na tweet moko ete "ekozala malamu kopusa maponami" mpo na COVID19 mpe mpo na koboya moyibi.

"2020 ekozala maponami ya mabe koleka mpe ya moyibi koleka… Ekozala soni mpenza mpo na Etats-Unis," ekomi na Twitter président Donald Trump.

Maponami masengeli masalama le 3 novembre ata na nzela ya kotinda mikanda na poste (correspondance) soki COVID19 ekobi.

COVID19 ematimakasi na Etats-Unis. Bato 4,4 millions bayebani kozwama na yango. 150.283 bakufi.

"Esengeli kozongisa nsima maponami kino bato bakoka kopona na ndenge ya momesano mpe na bokengi bonso," ekomi M. Trump.

Kaka Congrès nde ezali makoki ya kopusa maponami ma mokonzi ya mboka.

Ba états mingi balingi bato bapona mokonzi ya mboka na kotinda mikanda na poste mpo na kobaya bopanzani bwa COVID19.

Baike ya ba républicains baboyi makanisi ma président Trump.

Joe Biden, candidat ya ba démocrates, akundoli ete asi apamelaki M. Trump na avril, na koluka kopusa maponami.

XS
SM
MD
LG