Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ne Muanda Nsemi abimi CNPP mpe azongi ndako


Zacharie Badiengila alias Ne Muanda Nsemi na bokomi na ye na Commissariat ya police na Kinshasa, 24 avril 2020. (Capture d'écran)
Zacharie Badiengila alias Ne Muanda Nsemi na bokomi na ye na Commissariat ya police na Kinshasa, 24 avril 2020. (Capture d'écran)

Zacharie Badiengila mokambi ya Bundu dia Kongo (BDK) oyo amibengaka na nkombo ya Ne Muanda Nsemi azongi na ndako na ye nsima na kobimisama na CNPP esika wapi atiamaki mpo na lisalisi nsima na bokangami na ye le 24 avril.

Minganga ya Centre Neuropsychopatholigique bazalaki kosalisa ye bayebisi bapanzi sango ete abiki na COVID19.

Joseph Olengankoy, mokambi ya Comité national ya Suivi ya Accord alobi ete bobimisami bwa ye bosalami na bosenga ya président Félix Tshisekedi.

M. Olenghankoy asakoli mpe ete mbulamatari ebongisi ndako ya Muanda Nsemi epayi akovanda.

Ne Muanda akangami le 24 avril na police mpo akobaki kosangisa bato na ndako na ye na ntango état d’urgence mpo na COVID19.

XS
SM
MD
LG