+Exetat : wuto le 24 kino 27 août. Année blanche ekozala na RDC +Industry Five ezali koluka kokela tablette mpe Smartphone na Kinshasa +Basali ya bitumba na COVID19 batambolaki mpo na kosenga lifuta ya zanza misato na Matadi +Matanga ma John Lewis na Congres na Washington
Mokambi molandi ya engumba Kinshasa, Néron Mbungu, elongo na mokambi ya Police nationale na engumba eye, Sylvano Kasongo, babwaki mbela mpo ete bato bakoba kobatela malako ya COVID19. Etumbu ekopesama na baye bakotosa te. Totala.
Mbulatari ya Ekolo Congo démocratique esakoli ete "année" eye ekozala "blanche" te mpo na biteyelo, ezala ya nse to ya likolo. Session ordinaire ya Examen d’Etat ekosalama wuto le 24 kino le 27 août 2020, kolanda ministre ya EPST, Willy Bakonga.
Martin Fayulu, mokambi ya ECIDE (Engagement citoyen pour le développement) mpe moko na bakambi ba lingomba Lamuka asengi etumbu epesama na baye "babomi bato koleka 200 na Kipupu" na Sud-Kivu.
Balakisi bilongi ba compagnie ya Amerika Industry Five bazali na Kinshasa na ntani ya kosilisa misala mya kotia misolo mpo na kokela ba tablettes wuta engumba mokonzi ya Ekolo Congo démocratique.
Mbulamatari ya Sud-Kivu ezali kozela lipinga etindi na Kipupu, na territoire ya Mwenga, mpo na kopesa motango ya suka ya baye babomamaki le 16 juillet 2020, eyebisi moko na bakonzi ya etuka.
Lisanga lya bikolo ya etuka ya Afrika ya nse (SADC) lipesi Zambie mikolo 7 mpo na kotika mabele ya RDC, eyebisi mbulamatari.
Etat d'urgence sanitaire ekobakisama mikolo 20, couvre-feu ebakisami mikolo, nsima na likita likambamaki na président Sassou N'Guesso na visioconférence.
Bazuzi ya Cour d'appel batindiki bobandelami ya bosambisami ya Vital Kamerhe le 7 août. Balakisi bilongi ba ekolo bazalaki te na boloko bonene ya Makala.
Misala mya bosembo mya ekolo France mifongoli lisusu bolukiluki nsima na kobika na liwa ya général Mbaou, mokambi ya garde présidentielle ya Pascal Lissouba.
Molebeli ya batomboki ya M23, Col. Jean-Paul Epenge andimi ete babundi ba lingomba na ye bazali na Rutshuru na col. Mankenga, kasi bazali kosala bitumba te.
Bitumba ya makasi bingalaki na Rutshuru (Nord-Kivu) kati na mapinga ya RDC na batomboki ba M23 baye bavandaki kimya wuto 2017.
+Tshisekedi asukisi état d'urgence na RDC +PM Ilunga atombokeli Tshisekedi mpo Kankonde atiaki manza na mikano +FBI ekopsa maboko na APLC, elaki "Nzita"
Premier ministre Sylvestre Ilunga Ilunkamba asengi bokutani ya lombango na président Tshisekedi mpo na VPM Kankonde atiaki manzaka na esika na ye na mikano.
Ambassadeur ya Etats-Unis na Kinshasa alaki na bakambi ya sika ya misala mya bopekisi mpe kobundisa kaniaka lisungi ya FBI mpe ba procureurs ya USA.
Cour d’appel ezali kotinda bosambisami bwa évêque Pascal Mukuna mpo na kozwa na makasi Mamie Tshibola na tribunal mosusu, elobi ba avocats na ye.
Tribunal ya grande instance ya Kinshasa/Gombe pesi te etumbu na David Blattner, nkolo ya SAFRICAS. Kasi etindi ye kosamba na tribunal de paix mpo na mbeba moke.
Police nationale ya RDC elakisi mobomi na bato na ngomba ya UNIKIN pene na CNPP, na Kinshasa.
Bana ya zuzi nkondo Raphaël Yanyi basengi etumbu mpo na liwa ya tata na bango. F. Tshisekdi apesaki mowei losako mpe palata ya chevallier ya ordre national.
Aubin Minaku na Garry Sakata, bakeli mibeko ya FCC ya Joseph Kabila, bamilengeli kosolola na bazuzi mpo etali mibeko babongisi. Bato mingi batelemeli bango.
Voir plus