Produit par Eddy Isango
-
sánzá ya zómi na míbalé 09, 2019Adolphe Muzito na Lamuka basengi Monusco kopekisa bokati ya RDC
Adolphe Muzito, mokambi ya sika ya Lamuka mpo na sanza misato, akutani elongo na baninga baye ya lingomba, na Leila Zerrougui motambwisi ya MONUSCO mpo na koboya lolenge ekolo Congo démocratique ezali kokende na kokatana.
-
sánzá ya zómi na míbalé 09, 2019Tshisekedi akomi na Nairobi mpo na bokutani ya ACP
Président Félix Tshisekedi akomi na Nairobi, na Kenya epayi wapi akozala na bokutani ya libwa ya bakambi ya bikolo ACP (Afrique Caraïbes Pacifique). Likita liye likombanda le 9 kino le 10 ya sanza ya zomi na mibale, eye.