Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

FMI etindi limpinga na Kinshasa kolandela makambo ya kaniaka


Mokambi ya Fonds monétaire international Christine Lagarde (G) na bokutani na président ya RDC Félix Antoine Tshilombo na ndako ya FMI na Washington, 5 avril 2019.
Mokambi ya Fonds monétaire international Christine Lagarde (G) na bokutani na président ya RDC Félix Antoine Tshilombo na ndako ya FMI na Washington, 5 avril 2019.

Limpinga ya FMI (Fonds monétaire international) lizali na Kinshasa mpo kotala makambo mayike, kati na myango, kolandela bitumba na kaniaka eye société civile mpe Union européenne bazoli kotelemela.

"Limpinga liye likomi awa mpo na kotala mibeko mpe ba institutions ya misala ya finances publiques, ya banque centrale, ya bitumbi bitali kolekisa mbongo na zela ya mayuya (blanchiment d’argent) mpe lisusu bitumba na kaniaka," elobi représentant ya FMI na Kinshasa, Philippe Egoume.

Misala myango mikowumela kino le 20 décembre. "Ekoluka koyeba botawu boye bokoki komema na bokambi ya mabe," eyebisi M. Egoume.

Lundi, bayi FMI basololaki yango na Premier ministre Sylvestre Ilunga Ilunkamba.

Oyo nde limpinga lya misato FMI etindi na RDC wuto mobu mobandaki.

"Limpinga liye likopesa malako na mbulamatari," elobi misala ya Premier ministre na compte Twitter na yango.

Nzokande FMI ekebisi mpo projet ya budget ya l’Etat mpo na 2020 ezali irréaslite (koleka maye makoki kosalama solo). Esengi président Félix Tshisekedi (rigueur na ba sanctions) kolendela makasi mpe kopesa etumbu ekasi na bato banso bako pengwisa misolo to bakozwama na kaniaka.

N suka ya sanza ya novembre, coordonateur administratif es services personnels ya président Tshisekedi, Dieudonné Lobo, atiyamaki na boloko ya Makala nsima na kofundama mpo na kopesa ndingisa ete société moko ya Canada eyekola mpe ebanda kozwa diamant na mabele ya Miba ntango ayebisaki te bakonzi.

M. Lobo afundami kozwa moslo.

XS
SM
MD
LG