Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Moko na bakambi ya ba Kamuina Nsapu akangami na Luebo


Human skulls suspected to belong to victims of a recent combat between government army and Kamuina Nsapu militia are seen on the roadside in Tshienke near Kananga, the capital of Kasai-central province of the Democratic Republic of Congo, March 12, 2017.
Human skulls suspected to belong to victims of a recent combat between government army and Kamuina Nsapu militia are seen on the roadside in Tshienke near Kananga, the capital of Kasai-central province of the Democratic Republic of Congo, March 12, 2017.

Mokambi ya ba Kamuina Nsapu oyo afundama na liwa ya 39 policiers na 2017 akangami na Luebo, na Kasaï, eyebisi bayi société civile.

"Mubiayi Dewayo, mokambi ya basimba minduki, atiyami na bokangami na ndako ya auditorat ya Kananga," eyebisi motambwisi ACDHO (Association congolaise ya makoki ya bomoto), Arthur Padingani.

Motambwisi ya ACDHO alobi ete akendaki kotala ye na bokangami mpe basololaki.

Mubiayi Dewayo "akangamaki elongo na bato basusu basato. Ayebisi ngai ete asalaki ata ntango ya bokangami bwa ye matata te ata alingaki koloba ete azalaki na makoki ya kosala yango," elobi M. Padingani na Actualité.cd.

Auditeur supérieur na Cour militaire ya Kasaï oyo azali na Kanganga alobi ete bayi mosala na ye bayebisi ye likambo ya bokambi bwango.

Mubiayi Dewayo ayebani lokola moto Jean-Pierre Pandi to Kamuina Nsapu apesaki ndingisa ya kotiya lingomba ya basimba minduki na Luebo na Kasaï.

Mubiayi Dewayo afundama na kotiya motambo moye momemaki na koboma ba policiers 39 le 23 mars 2017 na Malenge. Ba policiers bakatamaki mitu mpe minduki mya bango mpe camoin Kamaz eye ezalaki komema bango bizwamaki na ba babundi ba Kamuina Nsapu.

Mokambi ya ba babundi baye bakala atikaki minduki na baninga baye le 29 janvier 2019 nsima na bokoti na bokonzi ya Félix Tshisekedi.

XS
SM
MD
LG