Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Fayulu azongi na Kinshasa


Martin Fayulu liboso ya bituluku, elili ebimisami na Ecide, le 2 août 2019. (Facebook/Lexxus Legal)
Martin Fayulu liboso ya bituluku, elili ebimisami na Ecide, le 2 août 2019. (Facebook/Lexxus Legal)

Candidat malheureux ya maponami maleki, Martin Fayulu azongi Kinshasa kowuta ekolo France epayi wapi alekisi pene na sanza mibale.

M. Fayulu, moko na bakambi ya lingomba Lamuka, ayambami na btuluku ya bato.

Balandi baye babongisaki tipoyi mpo na yango.

Na bokomi bwa ye na libanda ya mpepo ya N’Djili, M. Fayulu ayambami na Adolphe Muzito, motambwisi ya mikolo miye ya Lamuka, na Eve Bazaiba ya MLC ya Jean-Pierre Bemba, Lisanga Bonganga, mpe basusu elongo na baye ya lisanga ya na ye ECIDE.

Fayulu abongisi kosala meeting nsima na botamboli na balandi baye kino na Echangeur esika ya bokutani.

XS
SM
MD
LG