Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Conseil ya sécurité ebakisi mobu mosusu na mandat ya MONUSCO


Bokutani ya Conseil ya sécurité ya Nations unies, na New York, USA, 2 décembre 2019.
Bokutani ya Conseil ya sécurité ya Nations unies, na New York, USA, 2 décembre 2019.

Bayi Conseil ya sécurité ya Nations unies bandimi bango banso kobakisa mobu moko na mandat ya MONUSCO, na ndako ya ONU na New York, na Etats-Unis.

Mokanda ya mokano ya kobakisa mandat ya MONUSCO mopesamaki na ekolo France, mondimami na ba 15 membres nyonso ya Conseil ya sécurité.

Na mokano yango, bandimi kokitisa motango ya ba soda bazali na MONUSCO na 14.660. Motango yango mozalaki yambo 16.875. Nzokande basoda ya MONUSCO 15.900 nde bazali ntango oyo na mabele ya RDC.

Police ya MONUSCO nde ekobakisa bato 360 basusu mpo na mwa ntango.

"Ezali elombo ya politiki to pesi" mpo na "kolakisa ete tozali komona mbongwana esalami na RDC nsima na maponami", elobi diplomate moko na AFP.

Na mokano yango, Conseil ya sécurité esengi "kalaka mokonzi ya ONU kotala ndenge kokitisa motango ya basoda ya MONUSCO mikolo mikoya kolanda ndenge makambo makotambola na mboka, mingi mpenza bisika basimba minduki bazali lisusu te likama".

Conseil ya sécurité ebeti sete likolo ya "lotomo ya kozongisela malembe malembe misala na mbulamatari ya RDC".

Mandat ya sika ya MONUSCO epesi yango nzela kobatela ba civili lokola ezali na kala.

Mandat yango ebakisami na mobu moko lisusu ntango bayi na ekolo Congo démocratique, mingi mpeza bana ya Beni bazali kosenga bolongwi na yango mpo na bobobamami bozali kokoba ata Monusco ezali kuna.

XS
SM
MD
LG