Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ba FARDC bakangi ba ADF banei mpe balakisi minduki 130


Mampinga ya FARDC balakisi mandoki 34 ba Maï Maï ya UPLC bazongisi na Kalunguta, na 25 kms ya Beni, na Nord-Kivu, 31 octobre 2019. (VOA/Ekias Mwisi)
Mampinga ya FARDC balakisi mandoki 34 ba Maï Maï ya UPLC bazongisi na Kalunguta, na 25 kms ya Beni, na Nord-Kivu, 31 octobre 2019. (VOA/Ekias Mwisi)

Mampinga ya ekolo Congo démocratique basakoli ete makangi ba ADF banei mpe mabotoli minduki 130 na basimba minduki na Nord-Kivu.

Kolanda liyebisi ya ba FARDC na compte Twitter na yango, batomboki banei baye bakengami na lisungi ya bavandi ya Beni, Lubero mpe Butembo.

Nzokande mampinga ya RDC balakisi, o’mokolo ya mibale na Goma, engumba mokonzi ya Nord-Kivu, minduki pene na nkama misato ya basimba bibundeli.

Minduki myango mibotolami na basimba minduki na sanza misato miye mileki, eyebisi molobeli ya operation Sokola 2, major Guillaume Njike Kaiko na Nord-Kivu.

Minduki myango ya lolenge mingi, mizwami na ba territoires ya Masisi, Ruthsuru, Walikale et Nyirangongo, kolanda major Njike.

A lire aussi

XS
SM
MD
LG