Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Mende na Kebelisa balongwe na etumbu ya Union européenne


Lambert Mende mokambi ya CCU-A (Convention des Congolais unis et alliés) mpe candidat ya maponami ya ebonga ya mokambi ya etuka ya Sankuru, awa na Kinshasa, 13 avril 2015
Lambert Mende mokambi ya CCU-A (Convention des Congolais unis et alliés) mpe candidat ya maponami ya ebonga ya mokambi ya etuka ya Sankuru, awa na Kinshasa, 13 avril 2015

Union européenne elongoli basungi babale ya mokonzi ya kala ya RDC Joseph Kabila, na nkasa ya baye bazali na etumbu.

Lambert Mende, molebeli ya kala ya mbulamatari mpe Roger Kibelisa, mokambi ya bokengi ya kati ya mboka na ANR (Agence national ya renseignement) batiyami pembeni.

Union europeenne elobi ekotala lisusu etumbu ya basusu na kolanda lolenge makambo mazali kokende.

Na ngambo na ye, Lambert Mende alobi etumbu yango ezalaki ya sembo te.

Amituni mingi lolenge ya boyonkani na RDC na Union européenne.

"Ezali eloko ya kondima soki moko te," elobi M. Mende na eyano apesi Objestif-infos.

Le 10 décembre 2019, Conseil ya UE esengaki ete etubungu yango ezala kaka.

UE epesaki bango etumbu mpo na kopekisa maponami mpe kotelema démocratique na 2016.

Lambert Mende na Roger Kebelisa bazalaki na etumbu yango enlongo na baninga babango basusu lokola : Ilunga Kampete, Gabriel Amisi Kumba, Ferdinand Ilunga Luyoyo, Célestin Kanyama, John Numbi, Delphin Kaimbi, Evariste Boshab, Alex Kande Mupompa, Jean-Claude Kazembe, Ramazani Shadari, Éric Ruhorimbere mpe Kalev Mutond.

XS
SM
MD
LG