Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

FMI epesi pene na 369 millions $ crédit d’urgence


Mokambi ya Fonds monétaire international Christine Lagarde (G) na bokutani na président ya RDC Félix Antoine Tshilombo na ndako ya FMI na Washington, 5 avril 2019.
Mokambi ya Fonds monétaire international Christine Lagarde (G) na bokutani na président ya RDC Félix Antoine Tshilombo na ndako ya FMI na Washington, 5 avril 2019.

Fonds monétaire international(FMI) esakoli ete ezali kopesa 368,4 millions $ ya ligne ya crédit d’urgence (nyongo mpo na makambo masengeli kosalama na lobango) na RDC, elobi liyebisi ya misala miye.

"Nyongo yango ezali mpo mbulamatari ekoka kofuta bato," kolanda FMI.

Mokambi ya FMI andimaki linaka ya kotiya misala ya FMI mpo na kosunga bakonzi ya RDC kokokisa politliki na bango.

"Environnement économique ezali nanu na nkwokoso mpe na botawu ya kokweyisama," elobi FMI.

Misala miye ya molongo ya mosolo ekebisi ete nkita ya RDC ekoki kokita na 2019 na 4,5% ntango yango ezali na 5,8% na 2018.

RDC ezali na mikakatano na FMI likolo ya bokiti ya ntalo ya mabanga ya ntalo, ba dépenses ya sika mpe contrôle ya ba dépenses elengelamaki te ntango mboka na transition politique.

XS
SM
MD
LG