Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Trump atiyami na bofundami ("Impeachement")


Président Donald Trump (ya kovanda) apesi mbote na molobeli ya ndako ya ba ntoma mpe mokambi ya ba démocrates Nancy Pelosi na Washington, 12 mai 2019.
Président Donald Trump (ya kovanda) apesi mbote na molobeli ya ndako ya ba ntoma mpe mokambi ya ba démocrates Nancy Pelosi na Washington, 12 mai 2019.

Président Donald Trump afundami na Chambre ya ba représentants (ba députés ya Amerika) mpo na kosalela bokonzi mabe to na kolekisa ndelo mpe mpo na kopekisa Congrès kosala mosala na yango.

Bakeli mibeko 230 ya Chambre ya ba représentants balekisi mokano ya kofunda M. Trump butu boleki na maponami. 197 baboyaki yango.

Nzokande ba démocrates nde baleki ebele kati na Chambre ya ba représentants.

Bayi Chambre ya ba représentants bafundi M. Trump na koboya kopesa maboko na bolukiluki bazalaki kosala mpo na mbamba balobi atiyaki likolo na président ya Ukraine mpo koloba mabe na ntina ya Joe Biden, vice-président ya kala ya Etats-Unis mpe moko na ba démocrates baye bazali komilengele mpo na maponami ya mokonzi ya mboka na 2020.

Bofundami yango bokoleka na Sénat, suku ya likolo ya ndako ya bokeli mibeko epayi wapi ba républicains, lingomba ya M. Trump nde baleki na ebele.

Ba républicains balingi likambo yango te. Mbele baluka kokweyisa yango na bosambisami bokosalama na Sénat.

Bofundami ya M. Trump, mokonzi ya 45 na Etats-Unis, bosalami ntango azali komilengele mpo na kopesa lisusu nkombo na ye na maponami ya mokonzi ya mboka na 2020. Sango yango ekutaki na meetingi na Battle Creek, na Michingan.

"Bokweyisami boye bozali ya sembo te mpe botamboli likolo ya mobeko. Ezali kaka motema mabe ya ba democrats," eyanoli M. Trump oyo awangana mabe bafundeli ye.

"Ezali mabe kasi botamboli mabe ya président nde bomemi ye na bosambisami", ezongisi na ngambo na ye mokambi ya Chambre ya ba représentants, démocrate Nancy Pelosi.

Ba démocrates bazali kofunda M. Trump mpo atiyaki mbamba na mokonzi ya Ukraine mpo kotiola Joe Biden oyo akoki kowelela mpe libonga ya bokonzi na Etats-Unis na 2020.

XS
SM
MD
LG