Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

FCC esengi Union européenne elongola etumbu nyonso


Joseph Kabila, mokonzi ya kala ya RDC mpe mokambi ya FCC na bokutani ya lingomba liye na Kisantu, Kongo central, 28 novembre 2018.
Joseph Kabila, mokonzi ya kala ya RDC mpe mokambi ya FCC na bokutani ya lingomba liye na Kisantu, Kongo central, 28 novembre 2018.

Lingomba monene ya Joseph Kabila, président ya kala ya ekolo Congo démocratique, FCC (Front commun pour le changement) esengi na Union européenne kolongola etumbu nyonso likolo na bato ba yango zomi na minei.

Bosengi na FCC eyanoli na esakoli ya UE ya mokolo ya lundi ya kokoba kopesa etumbu na basungi 12 ya M. Kabila mpo na mobu mosusu.

Na mokano mwa yango, UE elongoli bato babale na etumbu. Bato bango bazali Lambert Mende, molebeli ya kala ya mbulamatari, mpe Roger Kebelisa mokambi molandi ya kala ANR, kolanda batoma ya mboka ya pabaya.

"Na kotala maye président Joseph Kabila na bato ba ye basali, na misala malamu ya démocratie mpe ya bolendisi politiki mpe nkita maye mamemi mbongwana ya bokonzi, makambo ya etumbu esengelaki esila libela mpo na kopesa nzela na masolo na ntina ya boyokani ya sika ya elonga ngambo nyonso," eyebisi FCC na compte Twitter na yango.

"FCC ezali kozela misala mingi misusu koleka bobandi boye ya malembe boye, na ntembe te, bozali kolanda nzela elamu," ebakisi FCC nsima na bolongoli ya eumbu likola na MM. Mende mpe Kebelisa.

Na ngambo na ye, M. Mende oyo akoma député national alobi ete "atikala koyeba te mpo na nini bapesaka ye etumbu yango".

Bato zomi na minei bazalaki na nse ya etumbu ya UE wuto suka ya mobu 2016 mpo na koboya ete maponami masalama mpe mpo na kobebisa démocratie.

Etumbu yango ezali kokanga makoki na bango na poto mpe kopekisa bango visa.

Lambert Mende na Roger Kebelisa bazalaki na etumbu yango enlongo na baninga babango basusu lokola : Ilunga Kampete, Gabriel Amisi Kumba, Ferdinand Ilunga Luyoyo, Célestin Kanyama, John Numbi, Delphin Kaimbi, Evariste Boshab, Alex Kande Mupompa, Jean-Claude Kazembe, Ramazani Shadari, Éric Ruhorimbere mpe Kalev Mutond.

XS
SM
MD
LG