Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi alobi na Kigali : "emoniseli na ye etongami likolo na moto"


Le président Felix Antoine Tshilombo Tshisekedi devant l'ONU à New York, le 26 septembre 2019.
Le président Felix Antoine Tshilombo Tshisekedi devant l'ONU à New York, le 26 septembre 2019.

Président Félix Tshisekedi alobi na Kigali, engumba mokonzi ya Rwanda, ete emoniseli na ye etongami likolo na moto.

Mokonzi ya ekolo Congo démocratique (RDC) azali uto mokolo ya eyenga (8 décembre 2019) na Kigali na bokutani Kusi Ideas Festival na Intare Arena bozali kotala soki Afrika ekozala wapi na mibu 60 mikoya.

Motuna monene mozali : emonisali na yo ezali nini mpo Afrika ya mibu 60mikoya?

"Emoniseli na nga etongami likolo na moto… Moto ya Congo na 'M' ya monene, eye ezali na kati na yango na basi. Moto ya Congo, lokola oyo akomema ntombwa, asengeli kokola na ntina ya kozala na makoki ya kopesa mpenza maboko na ntombwa ya ekolo," elobi M. Tshisekedi.

Mokonzi ya RDC alobi yango nde ntina asala manso mpo na alendisa démocratie na ntina ete Moto aloba na bonsomi, ayeba na kozwa mateya.

"Yango wana tosali ete kelasi ya nse ezala ofele. Kasi tokopesa ye mpe lisali ya bokolongono ya ofele," eyebisi na sikisiki M. Tshisekedi.

Na motuna etali diaspora, mokonzi ya RDC alobi ete "esengeli kosala manso mpe kobongisa lolenge ya bomoi ya bana Congo mpo na kokomisa ekolo na biso na makasi ya kondongwana na bikolo msusu mpe kozala bozenga mpo na kopesa nzela na bozongi ya bana ya Congo bavandaka libanda, baye bazali bomengo ya ekolo", ayanoli.

"Kino mibu 60 mikoka, tokozala na ntango mpo na komilengele na mondenge moye," ayebisi M. Tshisekedi.

"Congo lokola na esika na makasi na kati ya Afrika ezali kosala mosala ya pesa nzela ya bosangisami," elobi M. Tshisekedi,

"Yango nde nasengaki kokota na Communauté ya Afrika ya Est." elimboli M. Tshisekedi.

Paul Kagame, mokokani mwa ye ya Rwanda mpe azwaki maloba.

Président de la Commission de l’Unioin africaine (UA) Moussa Faki, Haut Représentant ya pour le Développement des Infrastructures, Raila Odinga mpe Dr Songwe Vera bango bakozwa maloba na bokutani bwango.

XS
SM
MD
LG