Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bobomami ya Yumbi: HRW esengi bakonzi ya RDC bosembo


Ndako ya CENI (Commission électorale nationale indépendante) na Yumbi, Maï-Ndombe, décembre 2018. (Monusco)
Ndako ya CENI (Commission électorale nationale indépendante) na Yumbi, Maï-Ndombe, décembre 2018. (Monusco)

Bakonzi ya ekolo Congo démocratique nanu bamemi te na bosembo baye basalaki bobomami ya Banunu na territoire ya Yumbi, na etuka ya Maï-Ndombe, nsima na mobu moko, elobi na liyebisi Human Rights Watch (HRW).

HRW ekundoli ete le 16 mpe le 17 décembre 2018, bituluku ya Batende babomaki koleka bato 535 mpe bazokisaki koleka bato 111.

HCR elobi motango ya bawei mosengeli kozala likolo koleka. Baye basalaki bobomi boye babukaki mpe bapunzaki koleka ndako 1.500, kati yangob ba centres de santé, biteyelo mpe centre ya vote to bureau ya CENI (Commission électorale nationale indépendante), kolanda banzeneke, ONU mpe mbulamatari ya RDC.

"Bakonzi ya Congo esengeli basala makasi mpo na kopesa etumbu na baye basalaki bobomani mobu moleki na Yumbi," esengi na liyebisi mokambi ya HRW mpo na Afrika ya kati kati, Lewis Mudge.

"Kolandela na misala ya bosembo bato baye babongisaki bitumba (bobomani) biye ekopesa bosembo na baye bazwaki likama na mabota mabango mpe ekosunga kopekisa makombo ya somo ya boye kosalama lisusu na bisika biye bizali na kimya te," ebakisi M. Mudge.

Justice militaire congolaise ebandaki bolukiluki mpe kosambisa bato. Kasi ekomisa yango na suka te.

HRW esengi misala myango mikende kino suka mpe epaleli misala ya bosembo ya mampinga kozanga kofungwama na bato banso.

Gentiny Ngobila oyo azalaki mokambi ya etuka ya Maï-Ndombe ntango ya bobomami boye abengisamaki na Kinshasa. Mpe na maponami ya libandela ya mobu, alongaki ebonga ya mokambi ya etuka ya Kinshasa epayi wapi azali kokamba.

XS
SM
MD
LG