Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bato 23 bazwami na Ebola na mikolo minei


Ambulance ezali kozela komema mokoni moko ya Ebola na Goma, na RDC, 5 août 2019. REUTERS/Baz Ratner
Ambulance ezali kozela komema mokoni moko ya Ebola na Goma, na RDC, 5 août 2019. REUTERS/Baz Ratner

Bato 23 bazwami na Ebola na mikolo minei na pene na bisika biye bitumba na bokono boye bozali kosalama lisusu mpo na bitumba, Nord-Kivu.

Bato zomi bazwamaki na Ebola mokolo ya mibale na Mabalako, na Nord-Kivu.

Motoba mosusu bamonanaki mokolo ya yambo (lundi). Kati na bango banganga nkisi basato, eyebisi Comité multisectoriel ya bitumba na bokono ya Ebola.

O’mokolo ya misato, bato basato misusu bamonisamaki na Ebola na localité ya Biena (Nord-Kivu), esika wapi mokoni moko azwamaki te na Ebola uto mikolo 85.

Misala ya kobundisa Ebola mikatamaki na zones de santé misato, Beni, Mangina mpe Biakato (Ituri) mpo na bozangi bokengi.

Le 28 novembre, mopesi mangwele mpe bakumbi mituka babale babomamaki na nitumba na Biakato.

Policier moko akufaki na bitumba ya lolenge moko na Mangina, na Nord-Kivu.

Nima na bitumba byango, OMS mpe MSF balongolaki basali ba bango ya mboka ya bapaya na Biakato.

"Ebola ezongaki nsima. Bitumba biye bizongiseli yango makasi mpe bato nzike bakokufa," ekebisaki Directeur général ya OMS Dr. Tedros Adhanom Gebreyesus nsima na bitumba ya Biakato-Mangina.

Koleka bato 2.210 bakufi na bokono boye uto yango ebanda le 1er août 2018 na RDC.

XS
SM
MD
LG