Produit par Eddy Isango
-
sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 24, 2020Bakonzi batie manzaka mpo na botongi bwa raffinerie ya sika ya pétrole na Pointe-Noire
Mbulamatari ya Congo-Brazzaville eyokani na Beijing Fortune Dingheng Investment Co. Ltd mpo ete compagnie eye ya Chine etonga raffinerie ya sika ekobisa pétrole na 2023 na Pointe-Noire.
-
sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 24, 2020VOA60 Lingala 24 novembre 2020
+Michigan endimi elonga ya Joe Biden na etando na yango +Biden atie bato bayambo na mbulamatari na ye +ACAJ elobi Kimbembe na Laya, bakonzi ya SCPT (Onatra ) batiami na bokangami ya kozela + Sheka Ntabo Ntaberi mokonzi ya NDC ekatelami boloko ya libela na Goma
-
sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 24, 2020Mbulamatari ya Trump ebandi misala mya kopesa bokonzi na Biden
Mbulamatari ya président Donald Trump ekomeli Joe Biden, "president-elect" to mokonzi amonisami na maponami mpo koyebisa ye te akoki kozwa bisaleli bya mokonzi ya mboka kolanda maponami masalamaki le 3 novembre 2020.
-
sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 24, 2020Bapaya ba mombongo mpe tourisme ya bikolo 15 esengeli basimbisa $15.000 yambo na koya na Amerika
Bapaya bakowuta mboka ya Afrika zomi na mitano bakosengela kosimbisa misolo nkoto zomi na ndambo yambo na kosala mobembo na Etats-Unis, yango mokano mosakolami na mbulamatari ya Amerika.
-
sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 23, 2020Kamerhe atiami na "respiration artificielle" (Michel Moto)
Vital Kamerhe mokambi ya ndako ya mosala ya mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi, oyo akatelama mibu 20 mya boloko mpo na kopengwisa misolo mya l’Etat, atiami na "respiration artificielle" to bisaleli ya kopema, elobi basungi ba ye.
-
sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 20, 2020Bobandeli botangi ya bilembo bimonisi elonga ya Biden na Georgia
Joe Biden azwi elonga na Georgia, état ya suka eye bilembo na yango bitikalaki ya kozelama. Georgia elongamaka mingi mingi na ba républicains wuto mibu 30 kasi M. Biden abotoli yango mpo na mbala ya yambo.