Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Batindami ya Kenya, Gde-Bretagne, mpe basusu bazali koluka kobama moto libanda lya consultations


Photo mibale etiami esika moko. Stephen Kalonzo Musokya, Ministre wa Yambo ya kala ya Kenya, akutanaki na président Félix Tshisekedi (G) mpe na président ya kala Joseph Kabila na Kinshasa, 24 novembre 2020.
Photo mibale etiami esika moko. Stephen Kalonzo Musokya, Ministre wa Yambo ya kala ya Kenya, akutanaki na président Félix Tshisekedi (G) mpe na président ya kala Joseph Kabila na Kinshasa, 24 novembre 2020.

Ba "consultations" président Félix Tshisekedi azali kosala wuto pene na mposo misato ezali kosuka. Ebakisami mokolo moko, kolanda molobeli ya M. Tshisekedi. Kasi, libanda na yango, makasi masusu mazali kosalama nse mpo na kimya. Mingi mingi na bapaya.

Mardi, ministre d’Etat ya Grande-Bretagne mpo na Afrique, James Duddridge akutani na ngambo mingi ya bayi politiki na Kisnahsa.

"Tolobeli makambo mazali koleka na Ekolo Congo démocratique, mingi mingi ba consultations (boyoki bato) ezali kosalama na ntango eye, mpe boyokani na etuka ya Grands lacs, na Rwanda, Ouganda mpe Burundi," elobi ministre Duddridge nsima kokutana na président Tshisekedi.

Masolo ma bango matalaki mpe Union africaine mpo M. Tshsekedi akozwa ebonga ya kokamba yango mikolo mikoya.

M. Duddridge akutanaki mpe na Martin Fayulu, mokambi ya ECIDE mpe motambwisi ya Lamuka na ngonga eye.

Basolaki mpe se mpo na matata na mboka. M. Fayulu azali te na boyoki bato président Tshisekedi asali kasi alingi masolo makokamba na batambwisi bitonga mpe na bikolo bya bapaya lokola SADC.

Mpo na M. Fayulu, MM. Tshisekedi na Joseph Kabila (mokonzi ya mboka ya kala) bango nde bazali na kati ya matata mpe bango bakoki te kobengisa boyoki bato.

M. Fayulu akoba koloba ete alongaki maponami ma mokonzi ya mboka ya 2018 mpe nkwokoso ya mboka ewuta na boyokani "deal" MM. Tshisekedi na Kabila basala mpo na kokamba mboka elongo.

M. Duddridge akutanaki mpe na Ministre wa Yambo ya RDC, Sylvestre Ilunga Ilunkmaba oyo azali moko na bayi FCC, lingomba linene lya mokonzi ya mboka ya kala Joseph Kabila.

"Tosololi mpo na maye matali politiki awa na Kinshasa mpe mbongwana," elobaki M. Duddrdge nsima na masolo na M. Ilunga.

Batindami basusu mpe bazali kosolola na ngambo inso ya politiki ya RDC libanda lya consultations ezali kosalama.

Stephen Kalonzo Musokya, Ministre wa Yambo ya kala ya Kenya, ye mpe akutani na ngambo ya Kabila mpe ya Tshisekedi.

Ezala na président Tshisekedi mpe na président ya kala Kabila.

Balobi te makambo basololi, kasi M. Musyoka atindamaki na président ya Kenya Uhuru Kenyatta oyo azalaki kati na banzeneneke ya "deal" Kabila na Tshisekedi basalaki nsima na maponami.

M. Kabila nde abimisaki sekele yango sanza eleki na likita abengisaki na bakeli mibeko na ferme na ye na Kingakati, yambo consultations ebanda.

Yambo na yango, ezalaki ngala ya Christophe Bigot, mokambi ya mambi ya Afrika na Quai d’Orsay (ministère ya mambi ma bapaya ya Farnce). M. Bigot mpe akendaki na ngambo inso mpo na masolo.

Maye makombima na consultatsion (boyoki bato) makosangisa ntango mosusu makambo manso, na maye mazali kolobama libanda.

Mpamba te, lokola M. Fayulu, M. Kabila mpe azali te na boyoki bato yango mpe asengaki bato ba ye kotelemela yango. Kasi bike bakendaki kaka.

Yango, emonisi lokola bakoki kopesa nzela na président Tshisekedi kozwa majorité ya sika. Kasi, likambo likotikala nde na lolenge ya kosala yango na koboya kobuka Buku Likonzi. Basusu bakanisi ete ekosengele kokweyisa mbulamatari.

Masolo ma libanda, masalami mpe na bakambi ba biyamba katoliko na protestant (misioni).

Bango mpe bakutanaki na ngambo inso ya matata,

Nzokande, ezala Kabila, ezala Tshisekedi bango banso mpe batindaki bato kokutana na mboka mingi nzinganzinga kino na Egypte.

M. Tshisekedi kutu akendaki ye moto kino Luanda kokuta na Joao Lourenço ya Angola mpe asengaki ye lisungi.

Yango, mpepo ya bitumba mibale ya Angola etambolaki mposo moleki likolo ya Kinshasa.

Motuna mozali : kimya to bitumba nde ekolanda masolo manso maye?

Baike bakanisi ete kimya ekozala. Mpo ata président Tshisekedi alingi akela lisanga to liboke lilamu lya sika, alobi nanu te ete aboyi libela boyokani na ye na Kabila.

XS
SM
MD
LG