Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bakangami bakimi boloko ya ANR nsima kofina nkingo ya mobateli na bango na Lubumbashi


Ba policiers na mutuka moko na Lubumbashi, Haut-Katanga, 9 décembre 2011.
Ba policiers na mutuka moko na Lubumbashi, Haut-Katanga, 9 décembre 2011.

Bakangami zomi bakimi boloko moko ya ANR na Lubumbashi nsima kofina na nkingo officier alaki na esika yango, elobi liyebi lya ANR likomelaki VOA Lingala.

Mokambi ya ANR na etuka ya Haut-Katanga, Jean-Marie Mbalini Mbe akomi na liyebisi lyango ete bakangami zomi bakimaki ndako ya mosala ya ANR/Haut-Katanga o’mokolo mwa minei pene na ngonga ya 20H.

Bakangami yango bafinaki nkingo ya officer ya permanence, eyebisi mokambi ya ANR na Haut-Katanga kasi alobi te soki babomaki officier yango to te.

"Topesi bino etinda mpe mitindo ete bakangami baye nkombo na bango ezali awa na nse bakangama mpe bamema o’boso bwa biso," elobi Jean-Marie Mbalini Mbe.

"Tosengi na bato banso bazali bokonzi na mampinga mpe bokengi kobesa maboko ntango yango ekosengela na ntina ya kokokisa liyebisi liye totie manzaka," ebaksi Jean-Marie Mbalini Mbe.

Bato bango bakoki kozala bayi lisanga moko mpo mokanda ya ANR molakisi ete moko abengami mkombi, mosusu mokambi moalndi mpe basusu.

XS
SM
MD
LG