Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Biden apameli Trump na kolekisa ntango na ye ya kobanda kobundisa COVID-19


Joe Biden, President-Elect to mokonzi amonani molongi na maponami, awa likita lya nzela ya singa na Wilimngton, Delaware, 19 novembre 2020.
Joe Biden, President-Elect to mokonzi amonani molongi na maponami, awa likita lya nzela ya singa na Wilimngton, Delaware, 19 novembre 2020.

Joe Biden, President-elect to mokonzi amonani molongi na maponami ma mokonzi ya mboka akebisi ete limpinga lya basungi baye bakobanda mosala ya bitumba na COVID-19 nsima na ntango lokola président Trump azali koboya kopesa bokonzi.

M. Beiden alobaki yango na masolo na basali ba bokolongono mercredi na nzela ya singa.

Nzonkande Etats-Unis ewuti koleka motango mwa bato 11 millions bazwami na COVID-19. Koleka 250.000 nde bakufi.

"Ezali na makambo mingi mapesameli biso nanu te mpe, soki tozwi yango te, tokozala nsima na ntango ya mposo nzike to ya ba sanza nzike mpo na kotia na misala elaka ya monene koleka, lokola ba sociétés babale bakelaka mino balaki mangwele maye makasi ma yango mazali na 95%," epameli M. Biden.

Bayi ngambo ya Donald Trump, président azali na bokonzi wuto yambo na maponami, bazali kokoba bitumba na bango liboso lya bazuzi na ba Etats mingi.

Bayi Trump basengi bobandeli bwa botangi bilembo ndambo na Wiscosin epayi wapi M. Biden amonani mpe molongi.

Kasi mbulamatari ya Donald Trump ezali kokumisa maye président azali na bokonzi wuto yambo na maponami, asali kino mangwele mapusana pene na kobimisama.

Ba sociétés ya mino ya Amerika Moderna na Pfizer basakolaki bato ba yambo ete bilembo bya bomeki ya mangwele na bango bizali makasi na 95%.

"Kino suka ya sanza ya zomi na mibale, tozali kobongisa pene na 40 millions ya doses ya mangwele maye mabale, na kozelaka ndingisa ya FDA (Misala mipesaka ndingisa na mino na Etats-Unis), mpo na kopesa mangwele na bana ba Amerika 20 millions baye bazali na mpasi koleka," elobi Secrétaire ya bokolongono (ministre), Alex Azar.

XS
SM
MD
LG