Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bobandeli botangi ya bilembo bimonisi elonga ya Biden na Georgia


President Elect to mokonzi amonani na maponami Joe Biden azali koloba na Quenn Theater na Wimington, Delaware, 19 novembre 2020.
President Elect to mokonzi amonani na maponami Joe Biden azali koloba na Quenn Theater na Wimington, Delaware, 19 novembre 2020.

Joe Biden azwi elonga na Georgia, état ya suka eye bilembo na yango bitikalaki ya kozelama. Georgia elongamaka mingi mingi na ba républicains wuto mibu 30 kasi M. Biden abotoli yango mpo na mbala ya yambo.

Associated Press esakoli elonga ya M. Biden na Georgia na liboke lya Baponi banene ba yango 16 jeudi na mpokwa, nsima na bakambi ba misala mya maponami koloba ete motango mwa nkasa ya maponami bolakisi mbala ya mibale ete vice-président ya kala Joe Biden aleki président Donald Trump na maponi 12.000 likolo na pene nkasa million mitano mitangamaki.

Botangi ya nkasa ya Georgia bobandelamaki mpe bosalamaki na maboko mbala eye, ata yango esengami te na mobeko.

M. Biden asi alekaki baponami banene 270, motango mosengelaki mpo moto moko amonana molongi na maponami ma mokonzi ya mboka na USA.

Carte ya maponami
Carte ya maponami

Bakisa na Georgia, M. Biden akomi na 306.

Secrtaire d’Etat Brad Raffensperger nde asengaki yango kolanda mobeko moko ya sika na état ya Georgia moye mosengi yango.

M. Trump na bayi ngambo na ye bazali kofunda mbeba mpe moyibi ba Georgia kasi bapesi bilembo bilakisa yango te.

XS
SM
MD
LG