Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

ONU elaki lisungi na Sassou na boluki kimya na RDC, na Gds Lacs, Libye mpe Centrafrique


François Louncény Fall mokambi ya Bureau ya ONU na etuka ya Afrika ya kati (G) akutani na président Denis Sassou N'Guesso ya Congo-Brazzaville, na Brazzaville. 18 novembre 2020.
François Louncény Fall mokambi ya Bureau ya ONU na etuka ya Afrika ya kati (G) akutani na président Denis Sassou N'Guesso ya Congo-Brazzaville, na Brazzaville. 18 novembre 2020.

Nations unies ekopesama maboko na boluki kimya président Denis Sassou N'Guesso asalaka na etuka grands lacs, na RDC, Libye mpe Centrafrique, elaki molakisi elongi mpe mokambi ya bureau ya Nations unies na etuka ya kati ya Afrika, François Louncény Fall.

Molakisi elongi mpe mokambi ya bureau ya Nations unies na etuka ya kati ya Afrika ayambamaki elongo na limpinga akambaki na président Sassou N’Guesso mercredi na Brazzaville.

M. Louncény alaki kopesa maboko na bokambi CEAC (Lingomba lya nkita lya bikolo bya Afrika ya kati) M. Sassou N’Guesso akozwa na likita likosala le 27 novembre na Libreville.

"Tosi topesi longonya na bokambi ya Congo-Brazzaville na nzela ya président Sassou oyo asi asala mingi mpo na mbongwana ya CEAC…, mpe lisusu mpo na misala asalaka na boluki kosilisa matata na etuka ya grands lacs, nakanisi awa na RDC mpe na bikolo bisusu ya grands lacs, kasi mingi mpenza na misala mya ye na Centrafrique, mpe lisusu na Libye. Yango tosepeli komona tata mokonzi Sassou kozwa bokambi ya CEAC eey ebongwani, na ntina ya komema mopepe ya sika mpo na bikolo bya etuka eye, "elobi M. Louncény,

Molakisi elongo ya Nations unies alaki mpe kopesama maboko na misala mya maponami makosalama na Congo-Brazzaville.

M. Louncény alaki mpe lisungi mpo na makama na Congo-Brazzaville nsima na mpela ezali kozindisa ngambo ya nord.

Kino sika, CEAC ekambami na président Ali Bongo ya Gabon oyo akopesa ebonga ya mokambi ya lisanga eye na M. Sassou le 27 novembre.

XS
SM
MD
LG