Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Fifa etelemisi mosala ya mokambi CAF Ahmad Ahmad mpo na mibu mitano


Mokambi ya CAF Ahmad Ahmad na Casablanca, Maroc, 2 février 2018.
Mokambi ya CAF Ahmad Ahmad na Casablanca, Maroc, 2 février 2018.

Fifa etelemisi mosala ya mokambi ya CAF Ahmad Ahmad (vice-président ya Fifa) mpo na mibu mitano mpe epesi lomando ya 200.000 Francs suisses mpo na kopengwisa misolo.

Ahmad Ahmad, mibu 60, akangamaki mpo na mwa ntango na Paris na juin 2019 mpo afundama na kaniaka.

Misala mya sembo mya Fifa elobi ete mokambi ya CAF azangaki sembo, mpe apesaki makobo na biloko misusu, aselelaki misolo na ndenge esengeli te mpe asalelaki bokonzi na ye na ndenge ya mabe.

Esengelaki Ahmad Ahmad apesa lisusu nkombo na ye na maponami makoya ya mokambi ya CAF. Kasi etumbu eye ekopekisa ye.

XS
SM
MD
LG