Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kimbembe Mazunga na Laya Sinsu batiami na Makala


Jean Kimbembe Mazunga mokambi ya kala ya SCPT (Onatra ya kala) mpe mokambi ya kala ya Onatra (SCPT), Kinshasa, 8 décembre 2018. (Facebook/Mazunga Kimbembe)
Jean Kimbembe Mazunga mokambi ya kala ya SCPT (Onatra ya kala) mpe mokambi ya kala ya Onatra (SCPT), Kinshasa, 8 décembre 2018. (Facebook/Mazunga Kimbembe)

Bakambi babale ba SCPT, Onatra ya kala, Jean Kimbembe Mazunga mpe Laya Sinsu batiami na bokangami ya kozela na bokolo bonene ya Makala (na Kinshasa) wuto mokolo mwa yambo na mposo.

"MM. Kimbembe Mazunga na Laya Singu, bakambi babale (DG ya kala) ya SCPT (Onatra ya kala) batiami na bokangami ya kozela mpe bakotisami na boloko ya Makala wuto mpokwa ya lelo na mitindo ya Procureur général ya Matete mpo na bopengwisami ya misolo mya l’Etat, moko 8 million S mpe mosusu 6 milliards FC," ekomi mokambi ya ACAJ (Association mpo na accès à la justice), Me Georges Kapiamba.

Matata mazalaki likolo ya misolo miye wuto mwa ba sanza.

Basali ya SCPT mpe bazalaki kofunda yango wuto kala.

M. Kimbembe azalaka mokambi ya engumba Kisnahsa kala.

XS
SM
MD
LG