Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bakambi ba ECC bazali kokoba koluka kimya na ba matata CACH na FCC


Mokambi molandi ya ECC Mgr Idore Nyamuke (D) nsima na bokutani na mokambi ya Sénat Alexis Thambwe Mwamba (G) na Palais du peuple, Kinshasa, RDC, 23 novembre 2020. (Twitter/Sénat RDC)
Mokambi molandi ya ECC Mgr Idore Nyamuke (D) nsima na bokutani na mokambi ya Sénat Alexis Thambwe Mwamba (G) na Palais du peuple, Kinshasa, RDC, 23 novembre 2020. (Twitter/Sénat RDC)

Bakambi ba ECC (Eklezia ya Kristu na Congo to ba misioni) bazali kokutana na bayi politiki mpo na koluka kimya na matata mazali kati na mboka. Limpinga na yango likutani lundi na mokambi ya Sénat.

"Bakambi ba etonga ya misioni bazali koluka kimya na nkombo ya etinda na bango ya batambwisi mpate. Na bokambami bwa Mgr Idore Nyamuke, mokambi molandi ya ECC, basololaki lelo na mokambi ya Sénat, Alexis Thambwe-Mwambe, esakoli misala mya Sénat na Twitter.

M. Thambwe azali ya FCC mpe FCC ezali koboya koyoka bato mokonzi ya mboka azali kosala. Yango esengi masolo na ba insutitions to na commission ya boyokani kati na ngambo mibale.

Mposo moleki bayi FCC bakutani na Martin Fayulu, mokambi ya ECIDE mpe motambwisi ya ngonga eye ya Lisanga Lamuka.

M. Fayulu akoba kosenga elonga alobaka azwaka na maponami ma mokonzi ya mboka na décembre 2018.

Mokambi ya Lamuka mpe ECIDE apesaki bakambi ba ECC mwango na ye ya kopima na nkwokoso eye esengi mbongwana na makambo mingi mpe maponami ma lombango.

M. Fayulu azali kosenga masolo kati bayi mboka kasi masolo makambi na bakambi ba biyamba.

Bakambi ba ECC bakutanaki mposo mibale mileki na président Félix Tshisekedi na misala mya koyoka bato azali kosala.

M. Tshisekedi azali koyoka bato na boluki eyano na matata mazali kati na boyokani ya bokambi mboka ya CACH, lingomba lya ye, na FCC ya mokonzi ya kala Joseph Kabila oyo azali na bakeli mibeko mingi koleka na parlement.

M. Tshisekedi asakolaki koluka liboke lilamu ("union sacrée") lya sika mpo na kokamba mboka mpo ete boyokani CACH-FFC bozali kopesa nzela te mboka kokende liboso, elobaki M. Tshisekedi yambo na kobanda boyoki bato.

Kasi bayi FCC bazali kokebisa ete Buku likonzi ebukama na kokela majorité esusu na kolanda mibeko te.

Lokola bayi ECC, b'episkopo ya katoliko, CENCO, bango mpe batambolaki mpo koluka kimya.

M. Tshisekedi akosukisa koyoka bato mardi, elobi présidence ya RDC.

XS
SM
MD
LG