Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Pfizer na BioNTech basengi ndingisa mpo na kopesa mangwele na Amerika mpe Poto


Baleki nzela nsima na talata ya liyebisi litali COVID-19 pene elombo ya ndako laboratoire Pfizer na New York, Nov. 9, 2020.
Baleki nzela nsima na talata ya liyebisi litali COVID-19 pene elombo ya ndako laboratoire Pfizer na New York, Nov. 9, 2020.

Laboratoire Pfizer ya Amerika na BioNTech ya Allemagne basengi na misala mitalaka mino na Etats-Unis (FDA) ndingisa ya kobanda kopesa mangwele ma yango ya COVID-19. Bango nde  bakeli ba yambo basengi na Amerika to na poto.

Basengi ndingisa yango nsima misala misali koleka sanza zomi.

Bamekaki mangwele mango na bato 44.000 na bikolo mingi mpe bomeki bwango bonisi ete mangwele mango mazali makasi na 95% mpo kobatela na COVID-19.

Etats-Unis na Europe ekoki kopesa ndingisa na mangwele mango kobanda sanza ya zomi na mibale.

Mpo na FDA (na USA) ekozala mangwele ma yambo. Mpo Misala mitali mino na Europe ekozala ya mibale, kolanda

Ursula von der Leyen, mokambi ya Commission ya mino ya Europe.

Société mosusu ya USA, Moderna, yango mpe ezali na nzela na mangwele na yango, ya makasi mpe lisusu.

Mbulamatari ya Donal Trump emibongsi mpo na kopesa mangwele na bato million tuku mibale baye bazali na likama makasi na décembre. Nsima na yango bato millions 25 to 30 sanza na sanza.

Na poto mpe bikolo bizala komilengela.

XS
SM
MD
LG